Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makanisi ya Klisto

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Makanisi ya Klisto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 2:16

« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.

02 Bafilipi 2:5

Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.

03 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

04 1 Bakolinto 2:12

Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.

05 Bakolose 2:3

Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.

06 Bafilipi 2:6-8

Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela, kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto; amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.

07 Yoane 15:15

Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.

08 Ba-Efeso 4:23

mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika,

09 Barome 8:6

Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.

10 1 Bakolinto 1:30

Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,

11 Yoane 8:29

Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.

12 Ba-Ebre 4:15

Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.

13 Bafilipi 2:3

Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.

14 Ezayi 50:4

Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.

15 Yoane 5:30

Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko: nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.

Bantína oyo etali