Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Moyengebene akozala na bomoi na bondimi
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Moyengebene akozala na bomoi na bondimi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.
Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama: « Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. »
Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.
Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.
mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto: Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.