Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mokeli ya Bomoi

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Mokeli ya Bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Misala ya Bantoma 3:15

Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.

02 Yoane 1:4

Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.

03 Yoane 11:25

Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.

04 Bakolose 1:16

pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.

05 Yoane 14:6

Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.

06 Ba-Ebre 12:2

Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.

07 Yoane 5:26

pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi;

Bantína oyo etali