Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Alfa mpe Omega
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Alfa mpe Omega mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.
« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
Alobaki na ngai lisusu: « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
04 Ezayi 44:6
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi: Nazali ebandeli mpe nazali suka; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
Yesu azali liboso na nyonso, mpe nyonso esimbama kati na Ye;