Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Akangaka motema

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Akangaka motema mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 103:8

Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo;

02 Kobima 34:6

Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki: — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,

03 Mitango 14:18

« Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »

04 Banzembo 86:15

Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.

05 Joeli 2:13

Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.

Bantína oyo etali