Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkolo, bakisa bondimi na biso

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Nkolo, bakisa bondimi na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 17:5

Bantoma balobaki na Nkolo: — Bakisa kondima na biso!

02 Malako 9:24

Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi: — Nandimi! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.

03 Luka 17:6

Nkolo azongisaki: — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.

04 Matayo 17:20

Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo: soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo: « Longwa awa, kende kuna; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [

05 Ba-Ebre 12:2

Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.

06 Malako 9:23

Yesu alobaki na ye: — Olobi nini: « Soki okoki! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.

07 Ba-Efeso 2:8

Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—

08 2 Batesalonika 1:3

Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.

09 Luka 22:32

Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.

Bantína oyo etali