Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Batela motema na yo
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Batela motema na yo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Libota ya banyoka! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye:
Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo. Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka: « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo.
Tika ete ezala te mosika ya miso na yo! Batela yango malamu kati na motema na yo,