Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bondimi eyaka na koyoka
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bondimi eyaka na koyoka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Nalingi kotuna bino motuna moko kaka: « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki? »
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.
Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te?
Boye, elobaka penza nini? « Liloba ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo. » Liloba yango nde ezali Liloba ya kondima, mpe yango nde tozali kotatola.
Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango,
Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.