Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Losambo oyo esalaka mosala

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Losambo oyo esalaka mosala mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 5:16

Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.

02 Matayo 21:22

Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.

03 1 Yoane 5:14-15

Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe: soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso. Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.

04 Yoane 15:7

Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.

05 Malako 11:24

Yango wana nazali koloba na bino: eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.

06 Matayo 7:7-8

Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino; pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.

07 Bafilipi 4:6-7

Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.

08 Ba-Ebre 4:16

Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.

09 Jeremi 33:3

‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›

10 Luka 11:9-10

Boye, Ngai nazali koloba na bino: Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.

Bantína oyo etali