Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komipesa moko na moko

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Komipesa moko na moko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 12:10

Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

02 1 Batesalonika 5:11

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

03 Bagalatia 6:2

Bomemisana mikumba bino na bino; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.

04 Bafilipi 2:3-4

Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.

05 Ba-Efeso 4:2

bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi; boyikanaka mpiko kati na bolingo,

06 1 Petelo 4:8

Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.

07 Bakolose 3:13

Boyikanaka mpiko; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.

08 Yoane 13:34-35

Nazali kopesa bino mobeko ya sika: Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino. Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.

09 1 Batesalonika 5:15

Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.

10 Ba-Ebre 10:24-25

Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu. Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.

11 Barome 15:7

Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.

12 1 Bakolinto 12:25

asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.

13 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

14 1 Yoane 4:11

Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.

Bantína oyo etali