Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Abakamaki na ekulusu mpo na biso

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Abakamaki na ekulusu mpo na biso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bagalatia 2:20

boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.

02 Barome 5:8

Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.

03 1 Petelo 2:24

Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.

04 Bagalatia 3:13

Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »

05 1 Bakolinto 1:23

biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu: ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano.

06 1 Petelo 3:18

Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.

07 2 Bakolinto 5:21

Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »

08 Bakolose 2:14

apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.

Bantína oyo etali