Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mɔtɔ oyo ezikisaka
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Mɔtɔ oyo ezikisaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.
Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.
Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba.
Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te: « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso? »
Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.
Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi!
mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya, mpe kati na moto mpo na kopesa etumbu epai ya bato oyo bayebi Nzambe te mpe batosaka te Sango Malamu ya Yesu, Nkolo na biso.
Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.