Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tango bosambelaka

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Tango bosambelaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 6:6

Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.

02 Matayo 6:7

Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.

03 Matayo 6:9-13

Tala ndenge nini bosengeli kosambela: ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo; tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo! Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo; limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe; komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana; [ pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko. ] ›

04 Luka 18:1

Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.

05 Malako 1:35

Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.

06 Matayo 6:5

Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo: basili kozwa lifuti na bango.

07 Matayo 6:8

Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.

08 Luka 11:1

Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye: — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.

Bantína oyo etali