Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lisekwa mpe Bomoi
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Lisekwa mpe Bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
01 Yoane 11:25
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
02 Yoane 11:26
Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango?
03 Yoane 5:24
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
04 Yoane 6:40
Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto;