Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbuma ya liboso

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Mbuma ya liboso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 15:23

kasi moto na moto na tango na ye: Klisto akosekwa moto ya liboso; sima, tango akoya, bato oyo bazali ya Klisto bakosekwa.

02 1 Bakolinto 15:20

Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.

03 Barome 8:11

Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.

04 Bakolose 1:18

azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,

05 1 Batesalonika 4:14

Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.

06 1 Bakolinto 15:22

ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto;

07 Misala ya Bantoma 26:23

Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.

08 Emoniseli 1:5

mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,

09 Jake 1:18

Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.

10 Barome 8:23

Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.

11 1 Petelo 1:3

Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo

12 Yoane 12:24

Nazali koloba na bino penza ya solo: soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.

13 1 Bakolinto 15:21

Solo, lokola kufa eyaki na nzela ya moto moko, lisekwa mpe eyaki na nzela ya moto moko;

14 Bakolose 1:15

Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,

15 Emoniseli 1:18

Nazali Ye oyo azali na bomoi; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.

Bantína oyo etali