Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Azali na bomoi

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Azali na bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 1:18

Nazali Ye oyo azali na bomoi; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.

02 Luka 24:6

Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile:

03 Matayo 28:6

Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,

04 Barome 6:9

Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.

05 Yoane 14:19

Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.

06 Yoane 11:25

Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.

07 Ba-Ebre 7:25

Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.

08 1 Bakolinto 15:20

Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.

09 Misala ya Bantoma 2:24

Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.

Bantína oyo etali