Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lisekwa
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Lisekwa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.
Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.
Tango oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka ekolata kozanga kokufa, na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama: « Elonga emeli kufa. Oh kufa, wapi elonga na yo? Oh kufa, wapi nguya na yo? »
mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi: Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
mpe soki Klisto asekwaki te, wana kondima na bino ezali na tina te, bozali nanu kati na masumu na bino,
Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo