Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kozongisa esengo
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kozongisa esengo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.
Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe! Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.