Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mpo Azali na bomoi
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Mpo Azali na bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.
Yesu alobaki na ye: — Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi.
Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Nazali Ye oyo azali na bomoi; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.
Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.
Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.