Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Koyokana na losambo

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Koyokana na losambo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 18:19

Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo: soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.

02 Matayo 18:20

Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.

03 Misala ya Bantoma 1:14

Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.

04 Misala ya Bantoma 2:42

Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.

05 Misala ya Bantoma 4:24

Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe; balobaki: — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango;

06 Misala ya Bantoma 12:5

Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.

Bantína oyo etali