Loyembo ya Salomo 6

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo akei wapi? Akoti nzela nini mpo ete tosunga yo mpo na koluka ye?

2Mobali na ngai akei na elanga na ye, na mikala ya banzete ya solo kitoko mpo na koleisa bibwele na ye mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.

3Nazali mpo na mobali na ngai, mpe mobali na ngai azali mpo ngai. Azali koleisa bibwele na ye na bilanga ya bafololo oyo babengaka lisi.

4Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.

5Tika kotala ngai, pamba te miso na yo ezali kokweyisa ngai mayanga. Suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ewutaka na Galadi.

6Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo bawuti kosukola. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango, moko te ezangi mwana.

7Matama na yo, na se ya vwale, ezali lokola liboke ya bambuma ya grenade.

8Mokonzi akoki kozala na basi tuku motoba, bamakangu tuku mwambe mpe bilenge basi ebele penza.

9Kasi ebenga na ngai, mwasi na ngai oyo akoka na nyonso, azali kaka ye moko; azali kaka ye moko mwana mwasi ya mama na ye, oyo aleki kitoko na libumu ya mama oyo abota ye. Tango bilenge basi bamonaka ye, balulaka ye mpe batatolaka ete azali mwasi na esengo. Basi ya bakonzi mpe bamakangu bakumisaka ye soki bamoni ye.

10Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango?

11Nakendeki na elanga ya bakokoti mpo na koluka milona kati na lubwaku, mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.

12Nasosolaki te ndenge nini molimo na ngai ememaki ngai kino na bashar ya mokonzi ya bato na ngai.

Loyembo ya Salomo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0