Loyembo ya Salomo 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nazali lokola fololo oyo ebotaka na etando ya Saroni, fololo oyo babengaka lisi ya lubwaku.
2Ndenge fololo oyo babengaka lisi ezalaka kati na banzube, ndenge wana mpe mwasi na ngai ya motema azalaka kati na bilenge basi.
3Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
4Amemaki ngai na esika oyo bamelaka masanga, mpe bendele na ye likolo na ngai ezali bolingo.
5Lendisa ngai na bagato oyo basali na bambuma ya vino, sunga ngai na bapome, pamba te nabeli maladi ya bolingo.
6Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto!
7Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga: Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
8Yoka mongongo ya Bolingo na ngai! Tala ye wana! Ye wana azali koya, azali kopumbwa na likolo ya bangomba, azali kodenda na likolo ya bangomba mike.
9Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.
10Molingami na ngai alobi mpe ayebisi ngai: « Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai!
11Pamba te, tala eleko ya malili esili koleka, bamvula esili mpe ekeyi.
12Bafololo ebimi na mboka, tango ya koyemba banzembo ekoki. Makelele ya banzembo ya bibenga ekomi lisusu koyokana na mokili.
13Nzete ya figi ebimisi bambuma na yango ya liboso, bafololo ya bilanga ya vino ekomi kopanza solo na yango ya kitoko. Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai.
14Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi! »
15Bokangela biso bambwa ya zamba mpe bana na yango oyo ezali kobebisa bilanga na biso ya vino, pamba te bilanga na biso ya vino ebimisi bafololo.
16Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai, mpe ngai nazali ya ye; aleisaka bibwele na ye na bilanga oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.
17Mobali na ngai ya bolingo, zonga; awa moyi ebandi kobima mpe molili ekimi, zala lokola mboloko to mwana ya mbuli na bangomba ya Beteli.
Loyembo ya Salomo
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0