Loyembo ya Salomo 5
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.
2Nalalaki, kasi makanisi na ngai ezalaki ya kolamuka. Yoka! Mongongo ya molingami na ngai ezali koyokana na ekuke! « Molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema, ebenga na ngai, oyo azali kitoko koleka mpo na ngai, fungolela ngai ndako, pamba te moto na ngai etondi na londende, mpe suki na ngai epoli na matanga ya londende ya butu. »
3Nasili kolongola nzambala na ngai, nalata yango lisusu? Nasili kosukola makolo na ngai, nabebisa yango lisusu?
4Mobali na ngai ya motema akotisi loboko na ye na lidusu ya ekuke, bongo motema na ngai ekomi kobeta mpo na ye.
5Natelemaki mpo na kokende kofungolela mobali na ngai ya motema ndako, mpe maboko na ngai ebimisaki solo ya malasi ya mire, misapi na ngai etangisaki yango na bikangelo ya ndako.
6Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako, kasi akendeki na ye mpe alimwaki. Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te; nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
7Tango bakengeli ya mir bazalaki koleka-leka kati na engumba, bamonaki ngai, babetaki ngai, bazokisaki ngai mpe balongolaki ngai vwale na moto.
8Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino, soki bomoni mobali na ngai, bokoloba na ye nini? Boloba na ye ete nabeli maladi ya bolingo.
9Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo aleki mibali mosusu na nini? Nini penza ya malonga oyo mobali na yo azali na yango, oyo eleki mibali mosusu mpo ete oloba na biso boye?
10Mobali na ngai azali na poso pembe, azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.
11Moto na ye ezali lokola wolo ya peto, suki na ye elingama-lingama, mpe azali mwindo lokola yanganga.
12Miso na ye ezali kitoko lokola bibenga pembeni ya moluka, ezali lokola basukolaka yango na miliki mpe avandaka kati na sani ya bomengo.
13Matama na ye ezali lokola mikala ya banzete ya malasi, lokola ekolo ya bafololo ya solo kitoko; bibebu na ye ezali lokola fololo oyo babengaka lisi oyo ebimisaka mire ya kitoko.
14Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo oyo batia mabanga ya Krizolite. Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.
15Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.
16Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi!
Loyembo ya Salomo
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0