Oze 7
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
2Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
3Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.
4Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
5Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso, bakambi balangwaka masanga mpe mokonzi asanganaka na batioli.
6Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
7Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.
8Efrayimi asangani na bikolo mosusu, akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
9Bapaya bazali kosilisa ye makasi, kasi ye azali kososola yango te. Azali kokoma mobange, kasi azali kososola yango te.
10Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba: azongeli te Yawe, Nzambe na ye; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te!
11Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele: azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.
12Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
13Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo!
14Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
15Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
16Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.
Oze
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0