Oze 12

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.

2Efrayimi aliaka mopepe; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.

3Yawe alingi kosamba na Yuda; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.

4Na libumu ya mama na bango, akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe; tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.

5Abundaki na anjelu mpe alongaki, alelaki mpe asengaki ngolu na ye. Jakobi akutanaki na ye na Beteli, mpe ezali kuna nde asololaki na ye.

6Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.

7Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.

8Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.

9Efrayimi alobaka na lolendo nyonso: « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »

10Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.

11Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.

12Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.

13Jakobi akimaki na mokili ya Siri; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.

14Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.

15Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi, yango wana, Nkolo na ye akotangela ye ngambo ya makila oyo asopaki mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.

Oze

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0