Oze 11

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.

2Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.

3Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi ndenge ya kotambola; namemaki bango na maboko na Ngai, kasi basosolaki te ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.

4Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.

5Lokola baboyi kozonga epai na Ngai, bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te, kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.

6Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.

7Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.

8Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.

9Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino; nakoya lisusu na kanda te.

10Bakolanda Yawe! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.

11Bakoya na kolenga lokola bandeke wuta na Ejipito, lokola bibenga wuta na Asiri. Nakovandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.

Oze

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0