Abakuki 1
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli:
2Oh Yawe, kino tango nini nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, kasi ozali koyoka te? Nazali koganga epai na Yo: « Minyoko eleki! » kasi ozali kaka kobikisa te!
3Mpo na nini ozali kolakisa ngai makambo mabe ya boye? Mpo na nini ozali kosala eloko moko te? Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi mpe makambo mabe, bato bazali kaka koswana mpe kofundana.
4Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te, bazali kokata lisusu makambo na bosembo te. Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo, makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.
5Botala nanu malamu bikolo mosusu mpe bokokamwa penza, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokondima te soki bayebisi bino yango.
6Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te: batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.
7Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, basalaka makambo nyonso oyo bazali na yango posa, mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.
8Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.
9Bango nyonso bayaka nzela moko mpo na kotia mobulu, bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, bazwaka bakangami ebele ndenge balokotaka mbuma ya zelo.
10Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi, basekaka bingumba batonga makasi, batondisaka mabele pembeni ya bamir mpo ete bamata likolo na yango mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango,
11balekaka lokola mopepe mpe bakobaka nzela na bango, basepelaka kosala mabe, mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.
12Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.
13Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo?
14Okomisi bato lokola bambisi ya ebale, lokola banyama oyo etambolaka na libumu mpe ezanga mokonzi.
15Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, akangaka yango na monyama mpe atiaka yango na kitunga. Yango wana asepelaka mpe atondaka na esengo.
16Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.
17Boni, akosepela solo kotika ete monyama na ye ezanga mbisi na kokoba koboma bato na mawa te?
Abakuki
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0