Abakuki 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nakotelema na esika na ngai ya kokengela, nakotelema ngai moko na likolo ya mir, nakosenzela mpo na komona makambo oyo akoyebisa ngai mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.
2Yawe ayanolaki: — Koma emoniseli oyo, koma yango na etando ya mabanga, koma yango penza malamu mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.
3Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka; solo, ekokokisama, ekowumela te.
4Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.
5Solo, masanga ya vino ekosaka; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye.
6Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola: « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini?
7Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa? Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo. Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia?
8Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
9Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.
10Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele, obongisaki nde soni ya ndako na yo moko mpe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.
11Mabanga ya mir ekoganga mpe mabaya ya motondo ekoyanola.
12Mawa na moto oyo atongaka engumba na nzela ya makila mpe alendisaka yango na nzela ya lokuta!
13Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba?
14Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
15Mawa na moto oyo amelisaka moninga na ye masanga makasi kino asilisa mbeki nyonso mpe alangwa mpo ete amona bolumbu na ye!
16Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
17Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
18Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
19Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete: « Telema! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi: « Lamuka! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.
20Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye!
Abakuki
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0