Jeremi 47
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza:
2Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor, etondi lokola ebale oyo etondi mayi; ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango, bingumba mpe bavandi na yango nyonso. Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela
3tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.
4Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.
5Bakokokola suki ya moto ya Gaza lokola elembo ya matanga, Ashikeloni ekokanga monoko! Oh bino batikali kati na etando oyo ya lubwaku, kino tango nini bokotika komizokisa?
6Bozali koganga: ‹ Ah mopanga ya Yawe, okopema tango nini? Zonga na ebombelo na yo, tika koboma mpe zala kimia! ›
7Kasi ndenge nini ezala kimia tango Yawe apesi yango mitindo ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili oyo ezali pembeni ya ebale monene? »
Jeremi
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0