Jeremi 15

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Yawe alobaki na ngai: « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai! Tika ete bakende mosika na Ngai!

2Bongo soki batuni yo: ‹ Tokende wapi? › Zongisela bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu! ›

3Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe: « mopanga, mpo na koboma bango; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.

4Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.

5Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa? Nani akolela yo? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo?

6Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo; nakoyokela yo lisusu mawa te.

7Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.

8Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.

9Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela: akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.

10Oh mama na ngai, mawa na ngai! Mpo na nini obotaki ngai! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.

11Yawe alobaki: « Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo; solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo na tango ya pasi mpe ya minyoko.

12Boni, moto akoki penza kobuka ebende? Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze?

13Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.

14Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »

15Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo!

16Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.

17Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.

18Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.

19Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo; kasi yo, kolanda bango te.

20Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.

21« Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe mpe nakokangola yo na maboko ya bato oyo banyokolaka yo. »

Jeremi

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0