Ezayi 35

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela! Tika ete esobe eyoka esengo mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze!

2Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.

3Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga;

4Loba na bato oyo bazali kobanga: « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »

5Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.

6Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.

7Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.

8Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.

9Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.

10Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.

Ezayi

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0