Ezayi 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi:
2Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
3Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba: « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
4Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
5Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe!
6Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
7Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, bomengo na bango ezali na suka te. Mokili na bango etondi na bampunda mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
8Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, bato bakomi kofukamela biloko oyo esalemi na maboko na bango, oyo misapi na bango esili kosala.
9Yango wana, bato bakokitisa mito, mpe bato ya lokumu bakotonda na soni; kolimbisa bango te!
10Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye!
11Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama; Yawe kaka nde akonetolama.
12Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,
13banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama, mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani;
14bangomba nyonso ya milayi mpe bangomba nyonso ya mikuse,
15bandako nyonso ya milayi, bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi;
16bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
17Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
18Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
19Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
20Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
21Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
22Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango?
Ezayi
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0