Sofoni 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Oh ekolo oyo eyokaka soni te, bosangana nanu bino nyonso mpe bokanisa malamu
2liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino!
3Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
4Bakosundola engumba Gaza, bongo engumba Ashikeloni ekobebisama; bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi mpe bakopikola engumba Ekroni.
5Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino: « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
6Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, epai wapi bato ya Kreti bavandaka, ekokoma esika ya babateli bibwele mpe lopango ya kobokola bibwele.
7Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
8« Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola mpe koluka kobotola mabele na bango.
9Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »
10Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
11Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.
12Bino mpe bato ya Kushi bokokufa na mopanga na ngai.
13Akosembola loboko na Ye mpo na kobundisa etuka ya nor, akobebisa Asiri akobebisa penza Ninive mobimba mpe akokawusa yango lokola esobe.
14Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.
15Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela: « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.
Sofoni
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0