Mishe 2
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
2Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.
3Mpo na yango, Yawe alobi: « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo: ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
4Na mokolo wana, bakosambwisa bino; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo: ‹ Tobebisami penza mobimba! Libula ya bato na ngai ekabwani! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »
5Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe mpo na kokabola mabele na zeke.
6Basakoli na bango bazalaki koloba: « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te! Pasi ekokomela biso te. »
7Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima? »
8Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba;
9bobenganaki basi ya bato na ngai longwa na bandako na bango ya kitoko, bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai kati na bana na bango.
10Botelema mpe bokende! Awa ezali esika na bino ya kopema te, pamba te ezali mbindo, ebebisami makasi penza, mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.
11Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba: « Nakosakola mpo na yo; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
12Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.
13Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.
Mishe
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0