Ezekieli 19

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1« Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba:

2‹ Mama na yo azalaki nani? Nkosi ya mwasi kati na bankosi! Ezalaki kovanda kati na bana na yango mpe kobokola bana yango.

3Ekolisaki moko kati na bana na yango, mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.

4Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu; bakangaki yango bibende na zolo mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.

5Tango mama ya nkosi yango emonaki ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela mpe elikya na yango esili, ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.

6Ekomaki konguluma kati na bankosi, pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.

7Ekweyisaki bandako na bango ya makasi mpe ebebisaki bingumba na bango. Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna bazalaki kotondisama na somo.

8Bongo bato ya bituka ya zingazinga, longwa na bikolo na bango, bayaki kotelemela yango, batielaki yango mitambo na bango mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.

9Bakangaki yango minyololo, bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. Babwakaki yango na boloko mpo ete mongongo ya koganga na yango eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.

10Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.

11Bitape na yango ezalaki makasi, ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu; eyebanaki makasi mpo na molayi na yango mpe mpo na ebele ya makasa na yango.

12Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango.

13Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe, mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.

14Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango mpe etumbi mbuma na yango; ata etape moko te ya makasi etikalaki mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »

Ezekieli

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0