Mosakoli 12
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango: « Nazali kosepela na ngai na yango te; »
2liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto, ekoma molili, mpe mapata ezonga sima na mvula;
3tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango;
4tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala, mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila; tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke mpe bayembi ya basi batikaka koyemba;
5tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.
6Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana, eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi, mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana;
7liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
8Pamba na pamba, elobi mosakoli, makambo nyonso ezali kaka pamba.
9Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza.
10Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
11Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.
12Mwana na ngai, keba ete obakisa eloko moko te na likolo na yango. Suka ezali te mpo na kokoma mikanda ebele, mpe koyekola mingi elembisaka nzoto.
13Yoka suka ya mateya nyonso: Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.
14Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.
Mosakoli
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0